Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »
Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga.
Ndenge mvula ya pembe elimwaka na tango ya molunge, mpe mvula enokaka te na tango ya elanga, ndenge wana mpe lokumu oyo bapesi na zoba ekowumela na ye te.
Isalaele, kosepela te ; kozala na esengo te lokola bikolo mosusu ; pamba te otikaki Nzambe na yo mpe okendeki kosala kindumba ; osepelaki na lifuti ya kindumba na bitando nyonso oyo batutelaka ble.
Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.
Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki.