Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 19:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mokosi oyo azangi mayele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 19:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Natambolaka na bomoi ya bosembo ; kangola ngai mpe salela ngai ngolu.


Akabaka tango nyonso mpe adefisaka, bana na ye bakozalaka kati na mapamboli.


Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela, kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe.


Moto oyo atambolaka alima atosaka Yawe, kasi moto oyo nzela na ye etengama-tengama atiolaka Ye.


Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.


Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.


Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto ezali bolingo ya solo, mpe mobola azali malamu koleka mokosi.


Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ; boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.


Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe.


Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo.


Pamba te maboko na bino ebebi na makila, mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe ; bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta, mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe.


Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?


Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »


Tika ete nkolo na ngai atala te Nabali, mobali oyo ya mabe, pamba te azali penza ndenge kombo na ye ezali ; kombo na ye ezali Nabali, mpe elingi koloba : moto ya liboma. Mpe liboma ezali penza kotambola elongo na ye. Ngai mwasi mosali na yo, namonaki te bilenge mibali oyo mokonzi na ngai atindaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ