7 Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa, mpe bibebu na ye ezalaka motambo mpo na molimo na ye moko.
Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.
Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata ; ekozwa mpe ekozokisa bango.
Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.
Motema ya bwanya endimaka mibeko, kasi moto oyo alobaka makambo ya bozoba amilukelaka libebi.
Moto ya misala mabe akangamaka na motambo ya maloba na ye ya lokuta, kasi moyengebene akobika kati na pasi.
Moto oyo abatelaka monoko na ye abatelaka molimo na ye, kasi moto oyo afungolaka monoko na ye makasi akosuka na libebi.
Kati na monoko ya moto oyo azangi mayele, ezalaka na nzete ya lolendo, kasi bibebu ya moto ya bwanya ebatelaka ye.
Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.
Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.
Moto mabe akokangama kaka na motambo ya mabe na ye moko mpe na singa ya lisumu na ye,
omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo.
Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : — Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te.