Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima : « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo ! »
Kasi sik’oyo, Bapagano bazali kokamwa ete bozali kosangana lisusu te elongo na bango kati na bomoi wana ya kindumba makasi ; yango wana bakomi kobebisa lokumu na bino na nzela ya matongi.
Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye : — Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi ; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo.