Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 18:24 - Mokanda na Bomoi

24 Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 18:24
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali, nazali na pasi na motema mpo na yo ! Ozalaki motuya mingi mpo na ngai. Bolingo na yo mpo na ngai ezalaki makasi koleka bolingo ya mwasi !


Itayi azongiselaki mokonzi : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa.


Abisalomi atunaki Ushayi : — Oyo nde bolingo nyonso oyo ozali kolakisa epai ya moninga na yo ? Mpo na nini okendeki te elongo na moninga na yo ?


Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe.


Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.


Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo, mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ; kozala na molingami ya pembeni ezali malamu koleka kozala na ndeko ya mosika.


Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.


Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko.


Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ