Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
Soki boweleli koyamba moto oyo alati bilamba ya talo mpe bolobi na ye : « Tala esika ya kitoko oyo ebongisami mpo na yo, » kasi bolobi na mobola : « Yo, kende kotelema kuna » to « vanda awa na mabele, na se ya enyatelo makolo na ngai ; »
Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso ; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke.
Bongo moto nyonso oyo akotikala kati na libota na yo akobanda koya kofukama liboso na ye mpo na kozwa mbongo moko ya palata mpe eteni ya lipa, mpe akoloba : ‘ Kotisa ngai ata na mosala moko kati na misala ya bonganga-Nzambe mpo ete nazwaka ata eteni ya lipa. ’ › »
Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »