20 Moto atondisaka libumu na ye na nzela ya mbuma ya monoko na ye mpe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.
Mbuma ya monoko eleisaka moto bilei ya malamu, kasi molimo ya moto oyo atambolaka na bosembo te ememaka na mobulu.
Bato oyo batambolaka na boyengebene te bakozwa lifuti kolanda misala na bango, kasi moto ya sembo mpe akozwa lifuti kolanda misala na ye.
Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi ; mpe koswana na moto ezali lokola kokanga bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.
Pamba te ekozala esengo soki obombi yango na motema na yo, mpe soki yango nyonso ezali pene ya bibebu na yo.
batoli oyo epesaka mateya ya solo mpe maloba ya solo mpo ete okoka kozongisa biyano ya solo na moto oyo atindi yo ?