Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 18:2 - Mokanda na Bomoi

2 Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 18:2
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo ? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola ? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele ?


Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele ; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.


Moto ya mayele abombaka boyebi, kasi motema ya zoba etatolaka makambo ya bozoba.


Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye.


Mpo na nini mbongo ezala na maboko ya zoba ? Mpo ete asomba bwanya wana azali na posa na yango te !


Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka ; soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.


Ata tango zoba atambolaka na nzela, bozangi mayele na ye etalisaka na bato mosusu ete azali zoba.


Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.


Yango wana, bino mpe, lokola bozalaka na posa makasi ya makabo ya Molimo, bolukaka mingi kozala na yango ebele mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.


Mpo na oyo etali misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, toyebi malamu ete biso nyonso tozali na boyebi. Boyebi epesaka lolendo, kasi bolingo elendisaka.


Ezali solo ete bamoko bazali kosakola Klisto mpo na zuwa mpe kowelana na ngai, kasi bamosusu bazali kosala yango na makanisi ya malamu :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ