17 Moto ya liboso na kosamba amonanaka lokola nde alongi ; kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei, akotelemela ye.
Tango nkolo ya Jozefi ayokaki lisolo oyo mwasi na ye abetelaki ye na maloba oyo : « Tala ndenge mowumbu na yo asali ngai, » Potifari asilikaki makasi.
Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.
Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzela mpe ekotisaka ye liboso ya bato minene.
Zeke esilisaka koswana mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.