Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 18:15 - Mokanda na Bomoi

15 Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 18:15
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ?


Bato ya kala bakoteya yo, bakoloba na yo, mpe, na bwanya na bango, bakobimisela yo mateya oyo :


Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato ;


Moto ya bwanya abombaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebendaka pasi.


Motema ya moto ya mayele elukaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebimisaka kaka bozoba.


Moto oyo ayokaka pamela oyo epesaka bomoi avandaka kati na bato ya bwanya.


Luka bosolo, kasi koteka yango te ; sala se bongo na bwanya, na mateya mpe na mayele.


zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te, kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,


Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.


Teya moto ya bwanya, mpe akokoma lisusu na bwanya koleka ; teya moto ya sembo, mpe akobakisa lisusu boyebi na ye.


Mari, ndeko mwasi ya Marte, ayaki kovanda na makolo ya Nkolo, mpe azalaki koyoka makambo oyo Nkolo azalaki koloba.


mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.


Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ