Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 18:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 18:14
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye.


Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai.


Abikisaka bato oyo batutami na mitema mpe akawusaka bapota na bango.


Yoka ngai mpe yanola ngai. Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga mpe nazangi kimia,


Motema na ngai etondi na mawa, mpe somo ya kufa ekangi ngai.


Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango.


Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.


Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.


Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango.


Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ