9 Moto oyo abombaka mabe alukaka bolingo, kasi moto oyo azongelaka yango tango nyonso akabolaka bato oyo balingani.
Nzembo ya Davidi. Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami, mpe masumu na ye elongwe !
Koyina ebendaka koswana, kasi bolingo ezipaka mabe.
Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.
Pamela ezalaka na litomba mpo na moto ya mayele, kasi kobeta zoba bafimbu nkama moko ezalaka na litomba te.
Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te,
boyeba ete moto oyo azongisi mopengwi longwa na libunga abikisi ye na kufa mpe asali ete masumu ebele elimbisama.
Liboso na nyonso, bolinganaka makasi, pamba te bolingo ezipaka masumu ebele.