Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 17:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bakitani bazali motole ya bakoko, mpe baboti bazali lokumu ya bana.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 17:6
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Isalaele alobaki na Jozefi : — Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo ; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo.


Amonaki bakitani ya Efrayimi kino na molongo ya misato. Amonaki lisusu bana ya Makiri, mwana mobali ya Manase, ba-oyo babotamaki na mabolongo ya Jozefi.


Nzokande, mpo na Davidi, tata na yo, nakosala yango te na tango oyo ozali nanu na bomoi ; nakobotola yango nde na maboko ya mwana na yo ya mobali.


Nzokande, mpo na Davidi, Yawe Nzambe na ye, apesaki Abiyami mwinda kati na Yelusalemi, wana atiaki mwana na ye ya mobali mpo na kokitana na ye na bokonzi mpe kokomisa Yelusalemi makasi.


Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


Moto oyo asalaka bolamu atikelaka bakitani na ye libula, kasi bomengo ya moto ya masumu ebombamaka mpo na moyengebene.


Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ; bazwaka yango na nzela ya bosembo.


Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? ›


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ