Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele oyo alandaka nzela na Yo. Oyebi malamu ete nazalaki na posa ya komona mokolo ya pasi te. Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai ebimaka nde liboso na Yo.
Yebisa bato ya Amoni : ‹ Boyoka liloba na Nkolo Yawe ! Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola bosepelaki tango babebisaki bosantu ya Esika na Ngai ya bule, tango mokili ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te mpe wana bato ya Yuda bakendeki na bowumbu,
Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?