4 Moto oyo asalaka mabe ayokaka maloba ya bato mabe, mokosi apesaka litoyi na ye na maloba ya lokuta.
Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.
Moto oyo azangi mayele andimaka makambo nyonso oyo balobaka, kasi moto ya mayele atambolaka na bokebi.
Bato oyo babukaka mibeko bakumisaka bato mabe, kasi bato oyo babatelaka mibeko batelemelaka bato mabe.
balobaka na bato oyo bamonaka makambo : « Bomona te, » mpe na basakoli : « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te, boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso, bosakolela biso makambo ya lokuta.
basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, Banganga-Nzambe bazali kosalela bokonzi na bango ndenge balingi, mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. Kasi bokosala nini na suka ? »
Basakoli ya lokuta bazali ya mokili ; balobaka kolanda elobeli ya mokili, mpe mokili eyokaka bango.