Oh Nzambe na ngai, nayebi ete oyebi bozindo ya mitema na biso, osepelaka na bosembo. Napesi nyonso oyo wuta na mokano ya motema na ngai moko mpe na makanisi ya lokuta te. Sik’oyo, namoni ndenge nini bato na Yo, oyo bazali awa, bapesi Yo makabo oyo na motema malamu.
« Mwana na moto, libota ya Isalaele ekomi lokola fulu na miso na Ngai ; bango nyonso bakomi lokola ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, ebende mpe mbodi oyo babwaka na etumbelo ya bibende. Solo, bakomi kaka lokola bosoto ya palata.
Bato mosusu kati na bato ya bwanya bakobeta mabaku, mpo ete bakomisama bato ya kokoka, bapetolama mpe bazangi mbeba, mpo na tango ya suka, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu.
Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te.
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.
Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.