27 Moto oyo abatelaka monoko na ye azali na boyebi ; moto oyo alengaka-lengaka te azali mayele.
Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.
Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele, kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka bozoba na ye.
Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano, kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.
Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe, mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi koleka moto oyo abotolaka bingumba.
Bayokaka maloba ya kimia ya moto ya bwanya koleka makelele ya mokonzi ya bazoba.
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo : tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika ;
Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.
Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.