Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 17:26 - Mokanda na Bomoi

26 Ezali malamu te kopesa moto ya sembo etumbu, mpe ezali malamu te kobeta bato ya lokumu na miso ya bosembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 17:26
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Olingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki.


Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! »


Moto oyo alongisaka bato mabe mpe moto oyo akweyisaka bato ya sembo bazali, bango mibale, nkele na miso ya Yawe.


Ezali malamu te kolongisa moto mabe mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.


Bongo yo, Beteleemi Efrata, atako ozali moke kati na bingumba ya Yuda, ye oyo akokonza Isalaele akowuta kati na yo. Ebandeli na Ye ezala wuta kala penza, wuta na ebandeli ya tango.


Tango kaka Yesu alobaki bongo, moko kati na bakengeli oyo bazalaki wana abetaki Ye mbata na koloba : — Boni ! Ezali bongo nde ozali kozongisela mokonzi ya Banganga-Nzambe ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ