22 Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.
Nakomi lokola mayi oyo ezali kosopana, mpe mikuwa na ngai nyonso ekabwani ; motema na ngai ekomi lokola mafuta oyo ezali konyangwama kati na ngai.
Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.
Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.
Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.
Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?
Na tina na koseka, nalobaki : « Ezali na yango kaka bozoba ! » Bongo na tina na elengi, nalobaki : « Esalaka nini ? »
Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.
Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.