2 Mosali ya bwanya akozala na bokonzi likolo ya mwana mobali oyo asalaka soni, mpe akozwa libula elongo na bandeko.
Moto oyo abombaka biloko na eleko ya mvula azali mwana mayele, kasi moto oyo alalaka pongi na eleko ya kobuka mbuma azali mwana ya soni.
Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na ye akozwa mopepe lokola libula, mpe moto oyo azangi mayele akokoma mowumbu ya moto ya bwanya.
Mokonzi asepelaka na mosali ya bwanya, kasi mosali oyo ayokisaka ye soni apelisaka kanda na ye.
Kolia na kimia ndambo ya lipa ya kokawuka ezali malamu koleka kovanda na ndako etonda na misuni elongo na koswana.
Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
Mwana oyo abetaka tata na ye mpe abenganaka mama na ye ayeisaka soni mpe mawa.
Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te ;