Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 17:19 - Mokanda na Bomoi

19 Moto oyo alingaka koswana alingaka masumu ; moto oyo atongaka ekuke na ye na likolo amilukelaka kokweya.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 17:19
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye.


Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye : « Ngai nde nakozala mokonzi ! » Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda ; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli.


Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.


Kobanda koswana ezali lokola kofungola nzela ya mayi ; tika na yo liboso ete kobendana ekoma makasi.


Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Bongisa libanda ya mosala na yo, bongisa bilanga na yo, bongo na sima, tonga ndako na yo.


Soki moto ya bwanya akei kosamba elongo na moto ya liboma, ezala asiliki to aseki, akotikala kozala na kimia te.


Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu.


pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya sembo na miso ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ