18 Moto oyo azangi mayele abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya.
Moto oyo abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya akomona solo pasi, kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia.
Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya.
Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola.