Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 17:17 - Mokanda na Bomoi

17 Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 17:17
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali, nazali na pasi na motema mpo na yo ! Ozalaki motuya mingi mpo na ngai. Bolingo na yo mpo na ngai ezalaki makasi koleka bolingo ya mwasi !


Itayi azongiselaki mokonzi : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa.


Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ?


Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.


Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.


Mwana ya zoba azali pasi mpo na tata na ye ; koswana ya mwasi ezali lokola linzanza ya ndako, oyo etangisaka mayi tango nyonso.


Soki bandeko nyonso ya mobola bayinaka ye, mpo na nini baninga na ye bakima ye te ? Ata tango azali nanu koloba, batikalaka lisusu wana te.


Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye,


Kasi Rite azongiselaki ye : — Kotindika ngai na makasi te ete natika yo to napengwa na nzela na yo ; pamba te na esika nyonso oyo yo okokende nde ngai mpe nakokende, mpe na esika nyonso oyo yo okovanda nde ngai mpe nakovanda ; bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.


Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko.


Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.


Ngai nakobima mpe nakozala elongo na tata na ngai kati na zamba epai wapi yo okozala. Nakoloba na tina na yo epai ya tata na ngai, nakoluka koyeba makambo ndenge ezali mpe nakoyebisa yo. »


Mpe Jonatan asengaki ete Davidi alapa lisusu ndayi na ye na kombo ya bolingo na ye Davidi epai ya Jonatan, pamba te azalaki kolinga ye ndenge ye moko amilingaka.


Jonatan, mwana mobali ya Saulo, akendeki na Oreshi epai ya Davidi mpo na kolendisa ye na Kombo ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ