Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.
Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa ! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi.
Pamba te nayebi ndenge nini mabe na bino ezali ebele mpe ndenge nini masumu na bino ezali minene : bozali konyokola bato ya sembo mpe kozwa kanyaka, mpe lisusu bozali kokata makambo ya babola na bosembo te.
Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.