Nakokomisa ndako na yo lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe lokola ndako ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya ; pamba te opesi Ngai kanda mpe osali ete Isalaele asala masumu. »
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.
Jonatan alobaki malamu na tina na Davidi epai ya tata na ye, Saulo : « Tika ete mokonzi asala mabe te na mosali na ye, Davidi, pamba te asali yo mabe te. Yo nde kutu moto ozwi lisungi monene na makambo oyo ye asali.
Davidi awutaki komilobela : « Ezalaki na pamba nde nabatelaki biloko nyonso ya moto oyo kati na esobe mpo ete eloko moko te ebunga kati na biloko na ye nyonso ! Azongiseli ngai mabe na esika ya bolamu oyo nasalelaki ye !