10 Pamela ezalaka na litomba mpo na moto ya mayele, kasi kobeta zoba bafimbu nkama moko ezalaka na litomba te.
Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo ; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai ; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.
Mwana mayele ayokaka mateya ya tata na ye, kasi mwana oyo atiolaka ayokaka pamela te.
Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
Moto mabe alukaka kaka kotomboka, kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe mpo na kotelemela ye.
Moto oyo abombaka mabe alukaka bolingo, kasi moto oyo azongelaka yango tango nyonso akabolaka bato oyo balingani.
Beta motioli fimbu, mpe zoba akozwa mayele ; sembola moto ya mayele, mpe akozwa boyebi.
Ata soki otuti moto ya liboma na liboka elongo na mbuma, liboma na ye ekotikala te kolongwa kati na ye.
Bapamelaka mosali na maloba te ; pamba te akososola, kasi akoyoka te.
Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.