Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 16:9 - Mokanda na Bomoi

9 Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 16:9
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe asalaki ete kobebisama ya Akazia esalema tango akendeki kotala Yorami. Tango kaka Akazia akomaki, abimaki nzela moko na Yorami mpo na kokende epai ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo Yawe apakolaki mafuta mpo na kobebisa ndako ya Akabi.


Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto, alendisaka bomoi na ye ;


Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi eyano ewutaka epai na Yawe.


Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.


Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.


Ezali Yawe nde atambolisaka matambe ya moto ; bongo ndenge nini moto akoki kososola ye moko nzela na ye ?


Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ; wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama, mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. »


Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye ; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.


Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ