8 Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.
Mwa biloko ya moto ya sembo eleki bozwi ya bato ebele ya mabe,
Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.
Kolia ndunda kati na bolingo ezali malamu koleka kolia ngombe ya mafuta kati na koyina.
Soki Yawe asepeli na nzela ya moto, akoyokanisa ye na banguna na ye.
Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.
Kolia na kimia ndambo ya lipa ya kokawuka ezali malamu koleka kovanda na ndako etonda na misuni elongo na koswana.
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe.
Loboko moko oyo etondi na kimia ezali malamu koleka maboko mibale oyo etondi na misala makasi mpe na kolanda mopepe.
Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. Boye, bomengo yango ekokima na kati-kati ya bomoi na ye mpe ekomonisa bozoba na ye na suka ya bomoi na ye.
Oh libota ya mobulu, boni, nasepela penza komona bomengo na bino, oyo bosili kozwa na nzela ya mabe, Efa ekoka te oyo elakelama mabe ?