5 Moto nyonso ya lolendo azalaka nkele na miso ya Yawe ; solo, akozanga te kozwa etumbu.
Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni ! Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali.
Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba.
Moto mabe akosambisama solo, kasi bakitani ya bayengebene bakokangolama.
Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.
Bolingo mpe bosembo elongolaka mbeba ; kotosa Yawe etindaka moto kokima mabe.
Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na ye akozanga te kozwa etumbu.
Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.
Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi, bato ya lofundu bakokitisama ; Yawe kaka nde akonetolama.
Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisa mokolo moko mpo na kokitisa bato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu, bato nyonso oyo bamimatisaka,
Mawa na moto mabe ! Pasi ezali likolo na ye, pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye.
Boyoka malamu mpe bosala keba ! Bosala lolendo te, pamba te ezali Yawe nde alobi.
Nzokande, Nzambe atalisaka biso ngolu oyo eleki, pamba te Makomi eloba : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »