30 Moto oyo akangi miso mpe bibebu na ye mpo na kosala mabongisi ya mabe asili kosala masumu.
Moto oyo afinaka liso na mayele mabe alukaka mobulu, kasi moto oyo apamelaka na bosolo alukaka kimia.
Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.
Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.
Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ; bazwaka yango na nzela ya bosembo.
Komisa bato oyo mitema makasi, kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango mpo ete bamona te na miso na bango, bayoka te na matoyi na bango, basosola te na mitema na bango, babongwana te mpe babika te ! »
Maboko na bango eyebi penza kosala makambo mabe, bakambi mpe basambisi na bango bakomi koluka kanyaka ; bongo bato ya makasi bazali kosala makambo nyonso oyo balingi, bayokanaka mpo na kosala bato mabe.
Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ; bakangi penza matoyi mpe miso na bango, noki te miso na bango emona, matoyi na bango eyoka, mitema na bango esosola, mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »
Moto nyonso oyo asalaka mabe ayinaka pole mpe apusanaka te epai pole ezali, noki te misala na ye ekomonana polele.