Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 16:29 - Mokanda na Bomoi

29 Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 16:29
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bapesaki ye kanyaka mpo na kobangisa ngai, mpo ete nasala masumu tango nakolanda toli na ye ; mpe mpo ete babebisa lokumu ya kombo na ngai mpe bayokisa ngai soni.


Moto ya mbindo abebisaka moninga na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.


Moyengebene alakisaka baninga na ye nzela, kasi nzela ya moto mabe ebungisaka ye moko moto mabe.


Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.


Moto oyo akangi miso mpe bibebu na ye mpo na kosala mabongisi ya mabe asili kosala masumu.


Kolulaka te moto ya mobulu mpe koponaka ata nzela moko te, kati na banzela na ye.


Balingami na ngai, lokola bosili kozwa boyebi oyo, bosala keba ete bomemama te na mopepe ya mabunga ya bato oyo batosaka Nzambe te, mpo ete bobungisa te kondima na bino ;


Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye : « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi ! »


Saulo alobaki na Mikali : — Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki ? Mikali alobaki na Saulo : — Davidi alobaki na ngai : « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ