Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 16:28 - Mokanda na Bomoi

28 Moto mabe alonaka koswana, moto ya songisongi akabolaka baninga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 16:28
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.


Moto ya Beliali abongisaka kosala mabe, mpe maloba na ye ezali lokola moto oyo etumbaka.


Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.


Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.


Moto oyo abombaka mabe alukaka bolingo, kasi moto oyo azongelaka yango tango nyonso akabolaka bato oyo balingani.


Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana, mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.


Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.


Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.


pamba te kobeta-beta mabele ebimisaka manteka, kobeta zolo ebimisaka makila, mpe kotumbola kanda eyeisaka koswana.


azalaka na makanisi mabe kati na motema na ye, asalaka tango nyonso mabongisi ya mabe mpe alukaka kaka tango nyonso makelele.


motatoli mabe oyo alobaka lokuta mpe moto oyo alukaka makelele kati na bandeko.


Batondaki na lolenge nyonso ya misala ya sembo te, ya makambo mabe, ya lokoso, ya mabe, ya zuwa, ya misala ya koboma bato, ya koswana, ya kokosela baninga makambo mpe ya koyina bato ; bakomaki bato na songisongi,


Pamba te nazali kobanga ete nakuta bino te na lolenge oyo ngai nazali kolinga ete bozala, tango nakoya epai na bino, mpe ete bino bomona ngai te na lolenge oyo bozali kolinga ete nazala. Nazali kobanga kokuta kati na bino koswana, zuwa, kanda, kowelana, kofingana, kotongana, lofundu mpe mobulu.


Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo : « Mokonzi, nkolo na ngai ! » Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ