Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 16:24 - Mokanda na Bomoi

24 Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 16:24
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge mitindo na Yo ezali elengi na monoko na ngai ! Ezali malamu koleka mafuta ya nzoyi.


Kotosa Yawe ezali peto, ewumelaka libela na libela. Mitindo ya Yawe ezali ya solo, nyonso ezali penza sembo.


Maloba ya bato oyo balobaka mingi ezokisaka lokola mopanga, kasi lolemo ya bato ya bwanya ezali lokola mafuta oyo ebikisaka.


Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.


Makanisi ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi maloba ya malamu ezalaka peto na miso na Ye.


Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.


Solo, bomoto na ngai nyonso ekotonda na esengo, soki bibebu na yo elobi makambo ya sembo.


Mafuta mpe malasi esepelisaka motema, mpe molingami malamu apesaka toli na motema ya esengo.


Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono mpe kolendisa mikuwa na yo.


pamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazwaka yango, mpe epesaka nzoto kolongono.


Mosakoli asalaki makasi mpo na koluka koyeba maloba ya elengi mpe kokoma na bosembo makambo ya solo.


Bibebu na yo ezali kobimisa mafuta ya elengi, mwasi na ngai ya motema ; se ya lolemo na yo etondi na mafuta ya nzoyi mpe na miliki, mpe solo ya bilamba na yo ezali lokola solo ya Libani.


Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo ; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo ; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.


Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, mpe maloba na ngai ekita lokola londende, lokola mvula moke na likolo ya matiti, lokola mvula makasi na likolo ya milona !


Nakamataki buku yango na loboko ya anjelu mpe naliaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi ; kasi sima na ngai kolia yango, ekomaki bololo kati na libumu na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ