Kati na motema na ngai, nazali na sango kowuta na Nzambe na tina na bato mabe oyo batondi na masumu : Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.
Soki olobi : « Tala, toyebaki likambo moko te kati na makambo oyo nyonso ; » boni, Ye oyo amekaka mitema asosolaka yango te ? Ye oyo abatelaka molimo na yo ayebaka yango te ? Afutaka te moto na moto kolanda misala na ye ?
Anjelu ya Yawe atunaki ye : — Mpo na nini obeti ane na yo mbala misato ? Nayaki awa mpo na kokanga yo nzela, pamba te nzela na yo ezali mabe liboso na Ngai.
Kasi Yesu alobaki na bango : — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.
Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Tiyatire : « Tala maloba ya Mwana na Nzambe, Ye oyo miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela makasi, mpe makolo na Ye, lokola bronze ya motuya :
Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.
Bato nkama misato bazwaki mayi na maboko na bango mpo na komema yango na minoko na bango mpe komela yango na nzela ya lolemo ; bato nyonso oyo batikali bafukamaki mpo na komela mayi.
Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.
Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.