Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 16:19 - Mokanda na Bomoi

19 Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 16:19
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atako Yawe atombwama, atalaka bato oyo bamikitisa mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.


Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.


Monguna amilobelaki : « Nakolanda bango kino nakokanga bango, molimo na ngai ekotonda na biloko oyo nakobotola ; nakobimisa mopanga na ngai, mpe loboko na ngai ekobebisa bango. »


tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge, mpe tokotondisa bandako na biso na bomengo ya bitumba ;


okozwa ndambo na yo epai na biso, pamba te biso nyonso tokosangisa biloko na biso esika moko ; »


pamba te eleki malamu ete baloba na yo : « Yaka kovanda na esika oyo ya lokumu, » na esika ete bayokisa yo soni na miso ya mokonzi.


Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.


asambwisaka batioli, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka.


Natindi ye mpo ete atelemela ekolo oyo eyebi Yawe te mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala.


Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, pamba te akabaki bomoi na ye na kufa mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, pamba te amemaki masumu ya bato ebele mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko.


Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, Ye oyo akowumela seko na seko mpe azali bule, alobi : « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi mpe oyo molimo na ye ebukani, mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami mpe motema oyo ebukani.


Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango, nzete oyo ezalaki na mapeka na bango mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango, Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani.


« Esengo na babola na molimo, pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !


« Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ