Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 16:18 - Mokanda na Bomoi

18 Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 16:18
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Amani asosolaki ete Maridoshe afukamelaka ye te mpe apesaka ye lokumu te, asilikaki makasi.


Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye : — Tokoki kosala nini mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu ? Amani amilobelaki : « Nani lisusu oyo mokonzi akoki kopesa lokumu soki ngai te ? »


Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki.


Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka, kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.


Moto oyo alingaka koswana alingaka masumu ; moto oyo atongaka ekuke na ye na likolo amilukelaka kokweya.


Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo ; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.


Kotosa Yawe ezali koyina mabe. Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu mpe monoko ya lokuta.


Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo, mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.


Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba ; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.


Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya, mpe moto moko te akoya kosunga yango ; nakopelisa moto kati na bingumba na yango, mpe moto yango ekozikisa bato nyonso oyo bazingeli yango. ›


Motema na yo etondaki na lolendo mpo na kitoko na yo ; obebisaki bwanya na yo mpo na lokumu na yo. Yango wana, nabwaki yo na mabele mpe nakomisi yo eloko ya liseki na miso ya bakonzi.


Ejipito ekokoma esobe mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. Lokola ozalaki koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; kasi ngai, ngai moko nde namisala, ’


Tango bakolonga mampinga ya mokonzi ya nor, mokonzi ya mokili ya sude akotondisama na lolendo mpe akoboma bato ebele, kasi elonga na ye ekowumela te.


Mpe yo Balitazari, mwana na ye ya mobali, atako oyebaki makambo wana nyonso, otamboli na komikitisa te.


Yango wana, atindi loboko oyo ekomi makomi oyo.


Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : — Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi ! Nalapi ndayi : Nayebi moto yango te ! Mpe, mbala moko, soso elelaki.


Soki esalemi bongo, moto oyo abengisi bino mibale akoya koloba na yo : ‹ Tikela moto oyo kiti na yo ! › Bongo, na soni nyonso, okokende kozwa esika ya suka.


Olobi malamu ! Bakatamaki mpo ete bazangaki kondima, kasi yo ozali wana mpo na kondima. Boye kotombola mapeka te, kasi sala nde keba.


Mokambi ya Lingomba asengeli te kozala moto oyo abongoli motema sika, noki te akotonda na lolendo mpe akozwa etumbu lokola Satana.


Kasi mokonzi ya Amoni aboyaki koyoka maloba oyo Jefite atindelaki ye.


Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye ; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ