Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 16:14 - Mokanda na Bomoi

14 Kanda ya mokonzi ememaka na kufa, kasi moto ya bwanya ayebaka kokitisa yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 16:14
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Faraon asilikelaki bakalaka na ye mibale ya lokumu : kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.


Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye.


Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.


Bakonzi balingaka maloba ya solo, mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu.


Soki elongi ya mokonzi ezali kongenga, elingi koloba : bomoi. Bolamu na ye ezali lokola lipata ya mvula ya eleko ya suka.


Moto mabe alukaka kaka kotomboka, kasi bakotindela ye ntoma ya motema mabe mpo na kotelemela ye.


Kanda ya mokonzi ezali lokola koganga ya nkosi, kasi bolamu na ye ezali lokola mamwe.


Somo oyo mokonzi apesaka ezali lokola koganga ya nkosi ; moto oyo apesaka ye kanda amilukelaka ye moko pasi.


Bato ebele balukaka kokoma balingami ya mokonzi, nzokande ezali Yawe nde apesaka oyo ekoki na moto na moto.


Batioli batiaka mobulu kati na engumba, kasi bato ya bwanya basilisaka kanda.


Soki mokonzi atombokeli yo, kolongwa na esika na yo ya mosala te ; pamba te motema ya kokita epekisaka bambeba minene.


Tango Daniele ayokaki bongo, akotaki epai ya mokonzi mpe asengaki ye tango mpo ete akoka kopesa ye ndimbola ya ndoto yango ;


Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane,


Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.


Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso : « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ