Tango mosusu, mokonzi akondima kokangola mwasi mosali na ye wuta na loboko ya mobali oyo azali koluka kobwaka ngai mpe mwana na ngai ya mobali mosika ya libula oyo Nzambe apesaki biso. »
Kasi tango Oziasi akomaki na nguya, atondaki na lolendo oyo ememaki ye na kokweya. Atambolaki lisusu na bosembo te liboso ya Yawe, Nzambe na ye, kino kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kotumba mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo ya malasi.
Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.