Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 16:1 - Mokanda na Bomoi

1 Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi eyano ewutaka epai na Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 16:1
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

— Kende koyebisa Davidi, mosali na ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Boni, yo nde okotongela ngai ndako mpo ete navanda kati na yango ?


Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye.


Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,


Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.


Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ; mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, nyonso, esili kobeba.


Yawe, oyokaka posa ya banyokolami, olendisaka bango, mpe oyokaka koganga na bango,


Sala ete motema na ngai esepela na malako na Yo, kasi na bomengo te !


Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.


Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ; komikitisa eyaka liboso ya nkembo.


Motema ya moto esalaka mabongisi, kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.


Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele, kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.


Ezali Yawe nde atambolisaka matambe ya moto ; bongo ndenge nini moto akoki kososola ye moko nzela na ye ?


Kati na loboko na Yawe, motema ya mokonzi ezalaka lokola moluka oyo atindaka esika nyonso oyo alingi.


Oh Yawe, nayebi ete moto moko te azali mokonzi ya bomoi na ye ; moto oyo azali kotambola azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye.


Tika ete Nzambe apesamela matondi mpo ete atie kati na motema ya Tito bolingo monene mpo na bino, ndenge tozali na yango mpo na bino !


pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ