Masese 15:8 - Mokanda na Bomoi8 Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe azali lokola ye oyo abomi moto, moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, moto oyo apesi makabo ya mbuma azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. Solo, baponi kolanda banzela na bango moko mpe kosepela na makambo na bango ya nkele.
Yawe akosepela solo soki tomemeli Ye minkoko ya bameme ya mibali to soki topesi Ye mafuta ebele lokola mayi ya ebale ? Boni, topesa solo bana na biso ya liboso mpo ete tozwa bolimbisi masumu na biso ? Boni, topesa bana na biso ya mibali oyo bawuti na mikongo na biso mpo ete akoka kolongola masumu na biso ?