Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli : Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.
Bibebu na yo ezali kobimisa mafuta ya elengi, mwasi na ngai ya motema ; se ya lolemo na yo etondi na mafuta ya nzoyi mpe na miliki, mpe solo ya bilamba na yo ezali lokola solo ya Libani.
Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.
Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.
Lolemo mpe ezali moto ; kati na biteni ya nzoto na biso, lolemo ezali mokili ya makambo mabe, ebebisaka nzoto mobimba. Soki ezwi moto ya lifelo, ezikisaka bomoi na biso mobimba.