31 Moto oyo ayokaka pamela oyo epesaka bomoi avandaka kati na bato ya bwanya.
Soki boyoki makebisi na Ngai, nakosopela bino Molimo na Ngai mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.
Bobola mpe soni ekomelaka bato oyo baboyaka koyekola, kasi moto oyo andimaka pamela akozwa lokumu.
Moto oyo asanganaka na bato ya bwanya akomaka moto ya bwanya, kasi moto oyo atambolaka nzela moko na bazoba akomona pasi.
Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ; sango malamu elendisaka mikuwa.
Moto oyo asundolaka koyekola atiolaka nde bomoi na ye moko, kasi moto oyo andimaka pamela akomaka mayele.
Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye, kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.
Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.
Yoka toli mpe ndima mateya, mpo ete okoma moto ya bwanya.
Pamela ya moto ya bwanya epai ya moto oyo ayokaka ezali lokola wolo ya peto mpe sheneti ya wolo.
Koyoka pamela ya moto ya bwanya ezali malamu koleka koyoka banzembo ya zoba.
Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi ; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.
Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te.