Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 15:30 - Mokanda na Bomoi

30 Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ; sango malamu elendisaka mikuwa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 15:30
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso.


Bosembo mpe alima ezali miboko ya Kiti ya Bokonzi na Yo, boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.


Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.


Pole ya bato ya sembo engengaka makasi, kasi mwinda ya bato mabe ekufaka.


Yawe azalaka mosika ya bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.


Moto oyo ayokaka pamela oyo epesaka bomoi avandaka kati na bato ya bwanya.


Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.


Basango ya malamu oyo ewuti na mokili ya mosika ezali lokola mayi ya pio kati na motema ya moto oyo azali na posa ya mayi.


Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono mpe kolendisa mikuwa na yo.


Pole ezali malamu, mpe miso esepelaka komona moyi.


Yawe akotambolisa yo tango nyonso, akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka mpe akokembisa mikuwa na yo. Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te.


Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango.


Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ