29 Yawe azalaka mosika ya bato mabe, kasi ayokaka libondeli ya bayengebene.
Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba, Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te.
Yawe, mpo na nini otelemi mosika ? Mpo na nini obombami na tango ya pasi ?
Atako Yawe atombwama, atalaka bato oyo bamikitisa mpe amonaka na mosika bato ya lolendo.
Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.
Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa ; obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.
Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te ; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.
Eloko oyo esepelisaka miso esepelisaka mpe motema ; sango malamu elendisaka mikuwa.
Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.
Kasi ezali bambeba na bino nde ekaboli bino na Nzambe na bino, ezali masumu na bino nde esali ete abombela bino elongi na Ye mpo ete ayoka bino te.
Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.
Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.
pamba te miso ya Nkolo etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka losambo na bango. Kasi Nkolo apesaka bato mabe mokongo.