Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 15:28 - Mokanda na Bomoi

28 Motema ya moyengebene ekanisaka liboso ya kopesa eyano, kasi monoko ya moto mabe ebimisaka maloba ya mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 15:28
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa mpe batambolaka zingazinga ya engumba.


Moto oyo alobaka maloba ebele azangaka te kosala masumu, kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye azali moto ya bwanya.


Bibebu ya moto ya sembo eyebaka makambo oyo ezali malamu, kasi monoko ya moto mabe ezalaka kaka na makambo mabe.


Moto ya mayele asalaka makambo kolanda boyebi, kasi zoba, atandaka bozoba na ye.


Lolemo ya moto ya bwanya ekomisaka boyebi elengi, kasi monoko ya bato oyo bazangi mayele ebimisaka bozoba.


Motema ya moto ya bwanya ekomisaka monoko na ye mayele, mpe bibebu na ye ebakisaka boyebi.


Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.


Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa, malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.


Ndenge ndoto eyaka soki moto azali na misala mingi, ndenge wana mpe maloba ebele ebimisaka bozoba.


Ndoto ebele mpe maloba ebele ezali kaka pamba ; yango wana tosa nde Nzambe.


Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye :


Kasi, kati na mitema na bino, bopesaka Klisto lokumu lokola Nkolo. Botatolaka tango nyonso tina ya elikya na bino epai ya bato nyonso oyo bakotuna bino tina yango,


Pamba te, mpo na kosepelisa baposa mabe ya banzoto na bango, basalelaka maloba ya sukali mpe ezanga tina mpo na kopengwisa bato oyo bawuti kobongola mitema sika wana bawuti kokabwana na bato oyo babikaka kati na libunga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ