24 Nzela ya bomoi ememaka moto ya bwanya na likolo, mpo na kobatela ye ete akita na mboka ya bakufi te.
Tala soki nazali kotambola na nzela mabe mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso !
Okolakisa ngai nzela ya bomoi ; okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo, elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.
pamba te ndako na ye ememaka na kufa, mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.
Na kobeta ye fimbu, okokangola molimo na ye na lifelo.
Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.
Makolo na ye ekokita kino na kufa, ekokende kino na mokili ya bakufi.
Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole, makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
Ndako na ye ezali penza nzela ya mboka ya bakufi, oyo ememaka kino na bandako ya kufa.
Kopamela motioli te, noki te akoyina yo ; kasi pamela moto ya bwanya, mpe akolinga yo.
Mpe lisusu, loba na bato : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Botala, nasili kotia liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya kufa.
Kasi ekuke to nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke, mpe bato moke kaka nde bamonaka yango.
Yesu azongiselaki ye : — Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.
Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, ekotumba mabele, bambuma na yango mpe miboko ya bangomba.
Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo.