23 Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo, mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.
Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi ! Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini ?
Na nzela ya mbuma ya monoko na ye, moto akotondisama na bolamu ; mpe moto akozwa lifuti ya misala ya maboko na ye.
Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.
Mabongisi ekokisamaka te soki bato basangani te mpo na kopesa mayele, kasi ekokisamaka malamu soki bapesi toli bazali ebele.
Bakonzi balingaka maloba ya solo, mpe bapesaka moto oyo alobaka na bosembo lokumu.
Maloba ya elengi ezalaka lokola mafuta ya nzoyi, epesaka kimia na motema mpe lobiko na mikuwa.
Eyano ya solo ezali lokola beze ya bibebu.
Likambo nyonso ezalaka na tango na yango, mpe mosala nyonso ezalaka na ngonga na yango, na se ya moyi.
Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi ; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.
Lokola bayekoli nyonso mibale bayokaki ndenge Yoane alobaki, balandaki Yesu.
Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu.
Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.