19 Nzela ya moto ya goyigoyi ezalaka lokola banzela mike ya banzube, kasi nzela ya bato ya sembo ezalaka ya kosembolama.
Banani bazali bato oyo batosaka Yawe ? Alakisaka bango nzela ya kopona.
Yawe, lakisa ngai nzela na Yo, tambolisa ngai na nzela ya alima, pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.
Kasi mpo ete bolingo na Yo eleki monene, nakoki kokota kati na Ndako na Yo, nakoki kofukama mpo na botosi epai ya Tempelo na Yo ya bule.
Bosembo ya moto oyo atambolaka alima ekomisaka nzela na ye sembo, kasi moto mabe akokweya mpo na mabe na ye moko.
Moto oyo atombokaka noki ayeisaka koswana, kasi moto oyo akangaka motema akitisaka koswana.
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye, kasi moto oyo azangi mayele atiolaka mama na ye.
Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ezali kuna na libanda, ekoboma ngai na kati-kati ya balabala. »
Nzela ya bato mabe ezalaka na banzube mpe mitambo, kasi moto oyo abatelaka molimo na ye azalaka mosika na yango.
Moto ya goyigoyi alobaka : « Nkosi ekangi nzela ! Nyama moko ya mabe ezali na kati-kati ya balabala ! »
Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.
Yo moto ya goyigoyi, kende epai ya furmi, tala malamu ezaleli na yango mpe okozwa bwanya !
nyonso ezali pole mpo na moto ya mayele, mpe sembo mpo na bato oyo bazali na bososoli.
Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo : « Tala nzela yango oyo ! »
Nzela moko ya monene ekoleka wana, bakobenga yango Balabala ya Bosantu. Moto moko te ya mbindo akoleka wana, pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango.
Bakoloba : « Botondisa mabele, botondisa mabele, bobongisa nzela, bolongola mabaku na nzela ya bato na Ngai ! »