Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 15:15 - Mokanda na Bomoi

15 Mikolo nyonso ezalaka mabe mpo na moto oyo azali na pasi, kasi bomoi ya moto oyo azali na esengo ezalaka tango nyonso na feti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 15:15
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye.


Jakobi azongiselaki Faraon : — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai.


Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.


Motema ya moto ya mayele elukaka boyebi, kasi monoko ya zoba ebimisaka kaka bozoba.


Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.


Mayele ezali etima ya bomoi mpo na bato oyo bazali na yango, kasi bozoba ezali etumbu mpo na bazoba.


Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.


Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo ; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.


mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi ; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema ; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende ;


Yango kaka te ! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Pamba te, ndenge kaka tomonaka pasi mingi kati na Klisto, ndenge wana mpe Klisto abondisaka biso makasi.


koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.


Bosepela nde, pamba te bozali kosangana na bapasi ya Klisto mpo ete botonda mpe na esengo tango akomonisa nkembo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ