Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Masese 15:13 - Mokanda na Bomoi

13 Motema ya esengo engengisaka elongi, kasi motema ya mawa elembisaka molimo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Masese 15:13
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye mokonzi atunaki ngai : — Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te ? Boni, ozali na mawa na motema ? Nabangaki makasi ;


Motema oyo etondi na komitungisa ekobuka moto, kasi liloba ya esengo esepelisaka moto.


Motema oyo ezali na kimia epesaka bomoi na nzoto, kasi bilulela epolisaka mikuwa.


Mikolo nyonso ezalaka mabe mpo na moto oyo azali na pasi, kasi bomoi ya moto oyo azali na esengo ezalaka tango nyonso na feti.


Motema ya esengo ebikisaka nzoto, kasi motema oyo etutami ebukaka mikuwa.


Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami ?


Yesu alobaki : — Tika ete mitema na bino etungisama te ! Bondima Nzambe mpe bondima Ngai.


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Nzokande sik’oyo, bosengeli kolimbisa ye mpe kobondisa ye, mpo ete azala na mawa makasi te.


Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ